Acts 5

Ananiya mpe Safira

1Nzoka nde, ezalaki na moto moko, na kombo ya Ananiya. Atekaki eteni ya mabele na ye na boyokani na mwasi na ye Safira. 2Abombaki ndambo ya mbongo mpo na ye moko, boye amemaki ndambo oyo etikalaki mpe apesaki yango na bantoma. Mwasi na ye mpe ayebaki yango.

3Boye, Piere atunaki ye : “Ananiya, ndenge nini Satana atondisi motema na yo mpo ete okosa Molimo Mosantu, mpe obomba ndambo ya mbongo oyo otekeli elanga na yo ? 4Boni, liboso ete oteka yango, ezalaki ya yo te ? Mpe sima ya koteka yango, okokaki te kosala na mbongo yango likambo nyonso oyo motema na yo elingi ? Mpo na nini ozwaki likanisi ya kosala likambo ya boye ? Okosi bato te, kasi okosi nde Nzambe !”

5Tango Ananiya ayokaki bongo, akweyaki mpe akufaki. Bongo, bato nyonso oyo bayokaki likambo yango batondaki na somo. 6Boye, bilenge mibali bayaki, bazipaki nzoto na ye mpe bamemaki yango libanda mpo na kokunda yango.

7Sima ya ngonga pene misato, mwasi ya Ananiya akotaki, kasi ayebaki te likambo oyo ewutaki kosalama.

8Piere atunaki ye :

—Yebisa ngai, ezali na talo wana nde yo mpe Ananiya botekaki elanga wana ?

Safira azongisaki :

—Ezali bongo, etekamaki Kaka na talo wana.

9Piere alobaki na ye :

—Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Tala ! Makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo ezali liboso ya ekuke, yo mpe bakomema yo.

10Kaka na tango wana, akweyaki liboso ya Piere mpe akufaki. Boye, tango bilenge mibali bakotaki, bakutaki ye ya kokufa. Bamemaki ye mpe bakendaki kokunda ye pembeni ya mobali na ye. 11Somo monene etondisaki lingomba mobimba mpe bato nyonso oyo bayokaki sango yango.

Bantoma batatoli liboso ya Likita monene

12Bantoma bazalaki kosala bilembo mingi ya kokamwa mpe misala minene kati na bato. Boye, bandimi nyonso bazalaki na momesano ya kosangana na veranda ya Salomo. 13Moko te kati na bato oyo bazalaki na lisanga na bango te azalaki komeka kosangana na bango, ata bato bazalaki kopesa bango lokumu mingi. 14Nzoka nde, mibali mpe basi ebele penza bazalaki kondimela Nkolo mpe kobakisama na lisanga na bango. 15Bongo, bazalaki komema bato ya maladi na balabala, kolalisa bango na bambeto mpe na bitoko mpo ete tango Piere akoleka, elilingi na ye ekoka kozipa bamoko kati na bango. 16Mpe lisusu, bato ebele oyo bazalaki kowuta na bingumba ya zinga-zinga bazalaki kosangana na Yelusalemi. Bazalaki komema bato na bango ya maladi mpe oyo bazalaki kotungisama na milimo mabe ; mpe bango nyonso bazalaki kobika.

Konyokwama ya bantoma

17Boye, mokonzi ya banganga-Nzambe mpe bato nyonso oyo bazalaki kosala na ye elongo, oyo bazalaki bato ya lisanga ya basaduseo, batondaki na zuwa. 18Bakangaki bantoma mpe babwakaki bango na boloko ya monene. 19Kasi na butu, anjelu ya Nkolo afungolaki bikuke ya boloko mpe abimisaki bantoma. 20Alobaki na bango : “Bokende kotelema na Tempelo, mpe kuna, boyebisa bato maloba nyonso ya bomoi oyo ya sika !”

21Bantoma batosaki. Boye, na tongo-tongo, bakotaki na Tempelo mpe bakomaki koteya bato. Tango mokonzi ya banganga-Nzambe mpe bato oyo basalaka na ye elongo bakomaki, babengisaki Likita monene : lisanga monene ya bato ya Isalaele, batindaki ete bakende kozwa bantoma na boloko.

22Kasi tango basoda bakomaki na boloko, bakutaki bango te. Bongo, bazongaki mpe balobaki : 23“Tokuti boloko ya kokangama malamu mpe bakengeli liboso ya bikuke ; kasi tango tofongoli yango, tomoni ata moto moko te na kati.” 24Tango mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe bakonzi ya banganga-Nzambe bayokaki sango yango, bakomaki mitema likolo mpe bakomaki kotunana soki likambo yango ekosuka ndenge nini.

25Bongo, moto moko ayaki koyebisa bango : “Boyoka ! Bato oyo bobwakaki na boloko, batelemi kuna na Tempelo mpe bazali koteya bato.”

26Mokonzi ya bakengeli akendaki elongo na basoda na ye mpo na kozwa bantoma. Kasi, amemaki bango na makasi te, pamba te bazalaki kobanga ete bato babamba bango mabanga.

27Wana bamemaki bango, batiaki bango liboso ya Likita monene, mpe mokonzi ya banganga-Nzambe abandaki kotuna bango mituna.

28Alobaki :

—Topekisaki bino ete bomeka lisusu te koteya na Kombo wana. Kasi tala sikʼoyo ndenge botondisi Yelusalemi na mateya na bino mpe bolingi komemisa biso ngambo ya makila ya moto wana.

29Kasi Piere mpe bantoma misusu bazongisaki :

—Esengeli kotosa Nzambe kasi bato te !
30Nzambe ya bakoko na biso asekwisaki Yesu kati na bakufi, Yesu oyo bino bobomaki mpe bobakaki na nzete. 31Ezali ye nde Nzambe atomboli kino na loboko na ye ya mobali lokola Mokonzi mpe Mobikisi, mpo ete bato ya Isalaele bakoka kozwa nzela ya kobongola mitema mpe kozwa bolimbisi ya masumu na bango. 32Biso tozali batatoli ya makambo oyo, ndenge moko mpe Molimo Mosantu oyo Nzambe apesaki na bato oyo batosaka ye azali motatoli ya makambo yango.

33Tango bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bazwaki mokano ya kobomisa bantoma. 34Kasi, mofarizeo moko na kombo ya Gamaliele, ye azalaki molakisi ya mibeko mpe azalaki na lokumu mingi na miso ya bato nyonso, atelemaki kati na Likita monene, mpe atindaki ete babimisa bantoma mpo na mwa tango moke. 35Alobaki na bango : “Bato ya Isalaele, bosala keba mpo na makambo oyo bolingi kosala bato oyo. 36Eleki mikolo mingi te, moto moko na kombo ya Tewudasi awutaki kobima. Azalaki komimona moto monene, mpe bato pene nkama minei bazalaki kolanda ye. Kasi tango babomaki ye, bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki mpe lisanga na ye ekufaki. 37Sima na ye, tango tozalaki kotanga motango ya bato kati na mokili, moto moko mpe lisusu na kombo ya Yuda, moto ya mboka Galile, abimaki mpe amemaki bato ebele na botomboki. Ye mpe lisusu babomaki ye, bongo bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki. 38Yango wana, na likambo oyo, boyoka toli na ngai : Bokota lisusu makambo ya bato oyo te mpe botika bango bakende ! Pamba te, soki makanisi to mosala na bango ewuti na moto, solo, ekosuka kaka na nzela. 39Kasi soki yango ewuti na Nzambe, solo, bokolonga te kosukisa bato oyo. Bosala keba ete bobundisa Nzambe te.”

40Bato ya Likita monene bandimaki likanisi ya Gamaliele. Babengisaki bantoma, babetisaki bango bafimbo mpe bapekisaki bango ete bateya lisusu Kombo ya Yesu te. Sima na yango batikaki bango kokende. 41Bantoma balongwaki liboso ya Likita monene, na esengo mingi ya komona ete bazali ya kokoka mpo na komona pasi na tina ya Kombo ya Yesu. 42Mokolo na mokolo bazalaki kotika te koteya, mpe kosakola sango malamu na Tempelo to na ndako moko na moko ete Yesu azali Klisto.
Copyright information for LinMNB